RDC : « monguna ya Tshisekedi eza Fatshi Béton. Ye Moko mopesi bilaka akokisaka te » Claudel Lubaya

Maloba ya Augustin Kabuya na ba réseau sociaux, esika azali ko funda Joseph Kabila kozala na sima ya ba pasi nionso ya RDC, etiki batu kimia te ndakisa Claudel Lubaya, pona ye monguna ya Tshisekedi eza « Fatshi Béton ».

Sarah Meta Savu

1 Sanza ya mineyi 2024 - 18:49
 0
RDC : « monguna ya Tshisekedi eza Fatshi Béton. Ye Moko mopesi bilaka akokisaka te » Claudel Lubaya

Na liyebisi lioko na nzela singa internet X, molobeli bayi mboka ya kala abombani te pona kolakisa mosapi bokambi ya mabe ya Felix Tshisekedi mibu mitano mileki. 

« Sima ya mibu mitano na bokonzi, tata mokonzi Felix Antoine Tshisekedi aza ye moko momemi ya nionso ezali kosalema na RDC akoki ko pesa moto mususu te soki ye moko te. Azalaki na bokonzi pona ko sala kasi pona ko pesa moto mususu te. Monguna ya Tshisekedi eza Fatshi Béton ».

Pona mokambi ya lisanga politiki UDA bayi mboka bazo zela bamona misala pona bokeyi liboso ya ekolo bazo zela te ba nkombo ya baye bazo zongisa mboka sima. 

Lolenge moko na Claudel Lubaya, na ngambo ya batu ya Joseph Kabila pe ba sepeli te na Maloba ya kalaka mokambi ya lisanga politiki UDPS lisanga politiki ya tata mokonzi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa