Kinshasa etelemeli bitumba ekolo Israël ezali ko sala na Doha
Mokolo ya lundi 07 septembre, mbulamatari ya ekolo Congo demokratiki etelemeli ekolo Israël ko buaka ba bombe na Doha na Qatar. O'nzela ya lioko liyebisi.
" Ezali bozangi botosi na oyo etali mibeko ya molongo pe ezali ko bakisa kokoso likolo ya eza kuna esika.
RDC etalisi kozala elongo na Qatar, zambi ekolo Qatar ezali moko ya bikolo ezali kosuanaga pona koluka kimia na RDC.
Kinshasa ebeti sete pona oyo etali bo batelamalami ya ba civil, botosi ya mibeko, RDC esengi lisusu cesser me feu pona ko luka kimia kuna esika.
Mapinga ya ekolo Israël elobi ezalaki pona kobeta ba konzi ya mouvement islamiste ya ekolo Palestine Hamas sima yako bwaka ba bombe mokolo ya mardi 09 septembre.
