Kisasa : Ngobila azongi na bokambi ya engumba 

Moyangeli moe engumba mokonzi kisasa azui nzela kowuta na ministre matali mambi mondelo o'mboka pona kozengela misala o'moto ya engumba mokonzi ya ekolo Congo demokratiki. 

Sarah Meta Savu

29 sanza ya yambo 2024 - 21:13
 0
Kisasa : Ngobila azongi na bokambi ya engumba 

Mokano moye mozuami kolandisama mokanda ya mokambi moa lisanga politiki ACP sima kombo naye koboyama na bayi CENI pona oyo etali moyibi pe kozuama na ba macini ya maponami na lolenge ya moyibi. 

Bokambemi ya engumba epesamaki na Gérard Mulumba moyangeli molandi oyo apesi mbela pona misala yako bongisa boko nzela na engumba kisasa,lokola balabala nguma pe rond point huileries. 

Kasi kozonga ya Gentiny Ngobila na bokambi engumba ekoki kosala makelele na oyo etali lolenge ya ekolo Congo demokratiki tango esengeli ko pesa etumbu na motu munene.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa