Likambo etali botongi ya mabulu ya mayi: Moïse katumbi akoti likambo liango 

Botongi ya mabulu ya mayi esali makelele mingi na singa internet. Pona Moïse katumbi, misolo ebimaki na bokambi ya Nicolas Kazadi minisele ya finance na pona misala esalemaki te kolandisama mibeko. 

Sarah Meta Savu

24 Sanza ya mineyi 2024 - 19:40
 0
Likambo etali botongi ya mabulu ya mayi: Moïse katumbi akoti likambo liango 

'' Na tongisi mabulu motango koleka kama mitano motuya ya libulu moko ezali 20.000$. mbongo ezo kende wapi?'' nde motuna ya Moïse katumbi. 

Abakisi:'' Bosembo lombamgo pona bayi opposition kasi malembe na majorité. Lolenge ya mabe yako salela misolo ya mbulamatari pe kanyaka mituna ya makasi. Nani nde moyibi? Ba congolais biyano pe bitumbu pona batu mabe na sima ya likambo lina ''

Minisele ya finance Nicolas Kazadi abisaki 71 millions ya Dollars pona botongi ya mabulu ya mayi 1000 na ba mboka ya misika, kolandisama misala botongi ya libulu moko esengaki 297 mille dollars.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa