RDC afundi kopani Apple ya France pe Belgique na bosembo kosalela na moyibi bozui ya se ya mabele ya RDC
Ekolo Congo demokratiki afundi kopani Apple ya France pe Belgique na bosembo kosalela na moyibi bozui naye ya se ya mabele.
Pona RDC Apple akoki koboya te ete na kati ya biloko naye yako salela ezali pe oyo ezali kowuta na moniele ya RDC bisika bitumba ewumeli mibu 30.
Lifundi yango ezali eyano na bopanzi sango, libombo na mbala moko pona kotelemela botomboki ya Rwanda na mabele ya RDC.
"Toko salale ba nzela nionso liboso na biso pona kobongisa kimia na moniele ya ekolo " elobaki Patrick Muyaya ministre ya mambi ya bopanzi sango pe molobeli ya mbulamatari.
Molobeli ya mbulamatari, abengisi ba panzi sango nionso pona kalasise yako yamba sango na oyo lifundi ya kopani Apple.
Bozui ya se ya mabele oyo eyebani na kombo ya 3T ( étain, tantale, tungstène) ezali motuya makasi pona kosala ba telephone ya mayele, ba ordinateur. Mbulamatari ya Congo demokratiki endimisami ete kopani Apple azali kozua biloko wana nionso na nzela ya Rwanda oyo ezali kobotola pe kosalela eteni ta Rubaya.
