Kisasa : Salomon Kalonda akoti lopitalo

Mopesi toli ya Moïse katumbi akoti lopitalo, pokwa ya mokolo ya mibale ya poso to Zali, "pona lisungi bo elongobani".

Sarah Meta Savu

13 Sanza ya libwa 2023 - 13:18
 0
Kisasa : Salomon Kalonda akoti lopitalo

Na suku naye ya boloko na ndolo, Salomon Kalonda atungisamaki na bokolongono boa nzoto.

"Mikolo naye na lopitalo esengeli ko sunga pona libiki naye mpe ko talisa bopono Naye", Wana nde maloba ya Hervé, Moko ya balobeli ya lisanga lia bango.

Moto ya pene pene ya mokambi lisanga politiki ensemble pour la république atiamaki maboko mua tuku misato ya sanza ya mitano moleki na libanda ya pepo ya n'djili nzoka nde azalaki ko bongama, ko zua pepo pona mobembo ba kati ya ekolo.

Amemamaki na DEMIAP, esika alekisaki ba poso ebele yambo Yako memama na boloko ya mapinga ya ndolo

Salomon idi Kalonda afundami mayele mabe elongo na ekolo Rwanda pe batomboki  ya M23 pona ko kweyisa bokonzi ya Felix Tshisekedi pona bolamu ya mowuta ya etuka Katanga.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa