Bitumba na moniele: etuluku ya mapinga kama muambe ya ekolo Burundi bakeyi na Sud Kivu

Etuluku ya mapinga kama muambe ya ekolo Burundi batindami na etuka Sud Kivu na ekolo Congo demokratiki, lokola molobami na RFI.

Sarah Meta Savu

19 Sanza ya libwa 2023 - 12:36
 0
Bitumba na moniele: etuluku ya mapinga kama muambe ya ekolo Burundi bakeyi na Sud Kivu

Etuluku eye ya sika ya mapinga eye kobakisama na bituluku bisato bizali kuna na etando ya mapinga ya mudubugu.

Ko kota ya mapinga eye ezali ba mbuma ya boyokani ya sika ya tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi pe Ndayishimiye boye batiaki mokoloto na suka sanza ya muambe na kisasa.

Congo demokratiki ezali sikawa na bituluku bineyi ya mapinga EAC to motango koto misato na kama mibale na eteni ena ya Congo demokratiki PE etuluku esusu na Nord Kivu na bosenga ya Kisasa, obe kolandisama na manaka ya RFI.

Burundi ezali sikawa moninga ya malamu pene ya RDC pona ko bundisa mapinga ya Rwanda pe batomboki ya M23, Oyo bazali botola mua eteni ya ekolo Congo demokratiki.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa