Kisasa : nzoto ya Cherubim Okende bakuti yango na masasi

Eza sikawa ezali polele, Chérubin Okende, molobeli ya lisanga politiki ensemble pour la république akufi,abomami na butu ya mokolo ya misato pona ntongo ya mokolo ya mineyi,zomi na misato, sanza motoba na kisasa nzoka nde azalaki komonana te

Sarah Meta Savu

13 Sanza Sambo 2023 - 21:15
 0
Kisasa : nzoto ya Cherubim Okende bakuti yango na masasi

Moto ya pene pene ya Moïse katumbi bakuti ye na mutuka Yako kufa na kati ya makila naye na masasi ebele na nzoto.

Bakuti ye na balabala ya monene ya poids lourd (kisasa) nzoto ya minisele ya kala ya mambi ma transport emami na ndako ya malili kasi naye ezali nanu kuna esika.

Chérubin Okende molobeli ya bayi mboka bazui ye na makasi kuna liboso ya ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle esika wapi akendaki ko tika mokanda ya kosenga bo pusami ya mosala ebongisamaki pona ye na ndako ena.

Boluki luki esengeli elanda pona koyeba mozindo ya likambo ya liwa moto ya pene pene ya Moïse katumbi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa