Lisambisi etali bukanga Lonzo : Matata Ponyo, Gilbert Christo pe Deogracias Mutombo ba fundami na moyibi ya ba million kama mibale ya misolo mia amerika

Mosambisi ya ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle, atindi mokanda pona mokolo ya lisambisi na likambo litali bilanga enene ya bukanga Lonzo. Matata Ponyo, Gilbert Christo pe Deogracias Mutombo batangami na moyibi ya ba million kama mibale ya misolo mia amerika (200 millions USD).

Sarah Meta Savu

15 Sanza Sambo 2023 - 10:12
 0
Lisambisi etali bukanga Lonzo : Matata Ponyo, Gilbert Christo pe Deogracias Mutombo ba fundami na moyibi ya ba million kama mibale ya misolo mia amerika

Kolandisama na bilembo na maboko ya mosambisi, Matata Ponyo pe Gilbert Christo ya Afrique du Sud bayibi misolo koleka ya million moko zomi na mitano ya misolo mia amerika misolo mipesamaki na kopani Africom Commodities pe moyangeli moa kala ya ndako enene ya misolo ya RDC ayibi ba million tuku muambe na libua ya misolo mia amerika, misolo misengelaki ko tonga wenze monene na kisasa.

Mosambisi asengi na zuzi mokonzi apesa mokolo pe ngonga ya lisambisi liango.

Deogracias Mutombo moyangeli moa kala ya ndako enene ya misolo atangami na kati bafundami nzoka nde ba minisele mibale,Wivine Mumba pe Patrice Kitebi bazui kimia.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa