Mombongo ya biloko ya kati ya batu na kisasa: ekoki kosalema te( minisele molandi ya bokolongono ya nzoto)

Liboso ya ba panzi sango mokolo moa lundi zomi na moko, sanza sambo mobu koto ibale tuku ibale na isato, minisele molandi ya bokolongono ya nzoto Serge Olene, amoni ete mombongo ya biloko ya kati ya batu ekoki ko salema te na kisasa.

Sarah Meta Savu

11 Sanza Sambo 2023 - 13:44
 0
Mombongo ya biloko ya kati ya batu na kisasa: ekoki kosalema te( minisele molandi ya bokolongono ya nzoto)

Pona ye Congo demokratiki eza ba ndaku pe biloko esengeli te" mombongo ya biloko ya Kati ya batu ezo senga kaka ba ndaku te kasi pe minganga basengeli pona kosala lipaso pe kolongola biloko ya kati ya libumu pe lolenge ya ko batela yango lisusu esengeli ko yeba ete tango pona boloko yango ebeba ezali mukie"

Lisusu ko zongisa biloko na kati ya mutu ezo senga mambi mayike lokola ba ambilansi,elikoptere pe pulusu.

Mbulamatari na pulusu batiki ko luka ko silisa nungunungu na oyo etali likambo liango nzambi bayi mboka bazali na bobangi ya bozangi bokengi sima ya ba makambu ya ba kidnapper elekani na engumba mokonzi kisasa.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa