Joseph Kabila pe Moïse Katumbi basangani pona kotelemela mbongwana ya buku likonzi 

Tata mokonzi ya kala Joseph Kabila pe moyangeli ya kala ya etuka Katanga ya kala, Moïse Katumbi, bazalaki na masolo mokolo ya jeudi 26/12/2024 na Addis Ababa, na ekolo Ethiopie. 

Sarah Meta Savu

27 Sanza zomi na mibale 2024 - 21:55
27 Sanza zomi na mibale 2024 - 21:56
 0
Joseph Kabila pe Moïse Katumbi basangani pona kotelemela mbongwana ya buku likonzi 

Kolandisama lioko liyebisi ebimi kowuta na Olivier Kamitatu, moko ya baye basalaka na Katumbi " batelemeli bokonzi batelemeli ya solo mimekano nionso yako bongola buku likonzi na likanisi ya tata mokonzi Félix Tshisekedi. 

" Lokola bokonzi na ekolo Congo demokratiki ezalaka ya mikolo kotanga basengi na bayi mboka nionso basangana pona kotelemela likanisi lina pamba te bakanisi ezali pona kosilisa bonsomi ya bayi mboka yako pona tata mokonzi. Boye ekomami na liyebisi 


"Joseph Kabila pe Moïse Katumbi bazali ko kamwa komona été kino sikoyo bayi communauté internationale balobi liloba moko te pe basengi eloko esalema pona ko kobimisa bayi mboka na bokonzi ya makasi na likanisi yako bongola buku likonzi, lokuta na maponomi ya 2023 pe bitumba na goma, Lubumbashi, kilwa pe na boloko ya makala na ba mapinga "

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa