Kisasa : ba telemisi misala ya contrôle na balabala pona mituka

Ndako ya mosala ya moyangeli na engumba mokonzi kisasa atelemisi misala ya contrôle ya mituka na boko ba balabala kino mitindo mia sika. 

Sarah Meta Savu

7 Sanza zomi na mibale 2023 - 13:40
 0
Kisasa : ba telemisi misala ya contrôle na balabala pona mituka

Boye nde ebimi na lioko liyebisi lia ndako ya mosala ya moyangeli na engumba mokonzi kisasa ya mua 7 décembre. 

Na pene pene ya maponomi pe ya ba feti ya suka ya mbula bayi mboka na engumba kisasa bakutami na eleko ya kolandela mikanda ya mituka na boko ba balabala pona koyeba nani azali alima na mibeko, misala miango mikotisi mbilingambilinga kotiaka embouteillages ya makasi na ba balabala ya engumba.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa