Tshopo/ mbulamatari ya Lendongolia: lisanga politiki ARDC ya Jean Bakomito ezui ebonga ya ministre ya malamu
Moyangeli ya tshopo, Paulin Lendongolia asambi pona moango moa ye ya mosala liboso ya balobeli ya etuka mokolo ya misato 30/10/2024.
Na kati ya ba ministre zomi basengeli kosala elongo na ye moko kati azali ya lisanga politiki ARDC ya Jean Bakomito ya moyangeli ya etuka haut Uele. Ezali mama Bijou Koy Taka, oyo azui ebonga ya ministele ya nzinga nzinga, ntombwa, bilanga bolobi mpe bobokoli bibwele.
Na nkombo ya lisanga lia ye Jean Bakomito, atondi tata mokonzi Félix Tshisekedi mokambi ya lisanga union sacrée oyo ezali kotalisa bokasi naye na moto ya ekolo Congo. Apesi pe matondo na moninga moa ye ya mosala ya etuka tshopo po alakisi azali ko ndimela lingomba politiki naye nako ponaka moko o'kati.
Kondimelaka mama Bijou Koy Taka, Jean Bakomito abandi ete kozala na ye eko mema libanga ya sika pona botongi.
Ko bosana te na se ya bokambi ya Jean Bakomito Gambu lingomba politiki ARDC ezali ko tanga balobeli bayi mboka7, balobeli ya bayi mboka na etuka 7 pe ba pesi toli na ba komine.
