RDC : Mbulamatari abongisi ko kokisa 13 milliards USD na libengi na mobu 2026
Mbulamatari ezali kokonisa ko kokisa 13 milliards USD ya misolo na libengi ya l'état na mobu 2026 na esika ya 9,9 milliards na 2015.
Mokano moango mozuamaki na likita lisangisaki ministre ya budget; ministre ya finance, Doudou Fwamba pe ministre molandi ya budget Elysée Bokumwana.
Pona ko kokisa likanisi yango, esengami ba kopani esangisaka misolo ya mpako ba bakisa bokasi.
Na tina nango Adolphe Muzito alendisi baluka mayele pona ko kokisa misolo yango pe baleka 12 milliards.
Ezali pona kokisa likanisi ya mbulamatari yako bongisa libiki ya bayi mboka, mobu moleki bakitisaki lifuti mpako TVA pona biloko première nécessité.
Pona Rolly Lengo, Dileketele ya DGPPB, atalisi ete koyeba ko futa mpako nde eko sunga pona ko kokisa yango soki bato bazali kofuta mpako eko zala malamu pe eko pesa Mbulamatari nzela yako zala na misolo yako bongisa ba lopitalo, ba nzela, lifuti pe misala misusu ya l'état
