Maponomi 2023: Denis Mukwege alaki kotia libaya pona kiti ya bokonzi

Eza lisusu yako bomba te, Dénis Mukwege ako tia libaya na moponomi ya sanza ya zomi na mibale mobu koto ibale tuku ibale na isato. Sango epesami mua 02/10/2023 na kisasa liboso ya panzi sango ya ba ndako ebele. 

Sarah Meta Savu

3 Sanza ya zomi 2023 - 09:45
3 Sanza ya zomi 2023 - 09:51
 0
Maponomi 2023: Denis Mukwege alaki kotia libaya pona kiti ya bokonzi

Prix Nobel ya kimia ya mobu 2018 akanisi ete ngonga ekoki pona ye yako zuwa bokonzi pona kobikisa ekolo pamba te eko limwa na kati ya mikili mia afrika. 

"Na longwe na kimia na nga pona kobikisa Congo oyo azali ko limwa. Ekolo na biso ekomi soni na molongo mobimba. Esika na biso eza ebonga ya ntombwa. Pona ko koma esengeli mosala esalema " Denis Mukwege. 

Mokambi mao lisanga Phanzi azuaki libaku pona kobimisa polele moyibi on bongisami pona maponomi. 

"Moyibi ebongisami tozala angele toza na makoki yako ko telemela maponomi ya lokuta, bosalela mongongo na bino ebimisa bino na bowumbu".

Dinis Mukwege ako komisa kombo na CENI mikolo mikoya

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa