Peter kazadi pona oyo etali botamboli ya kimia ebongisami na Fayulu: « na koki koyebisa bino na ko sukisama ete botamboli boye boko salema te »

Baweleli ebonga ya bokonzi, Martin Fayulu, Denis Mukwege, Théodore Ngoyi, Jean - Claude Baende pe Nkema Liloo bazali na mabongisi ya botamboli pona kotelemela biyano ya CENI pona oyo etali maponomi mawuti kosalema. Pona mbulamatari likanisi liye lizali kotasa buku likonzi te. 

Sarah Meta Savu

27 Sanza zomi na mibale 2023 - 09:27
 0
Peter kazadi pona oyo etali botamboli ya kimia ebongisami na Fayulu: « na koki koyebisa bino na ko sukisama ete botamboli boye boko salema te »

Liboso ya ba panzi sango mokolo moa mardi 26/12, mokambi mbulamatari molandi ye atali mambi mondele o'mboka pe bokengi abombaki te makanisi maye na ntina ya likambo liango. 

" Botamboli bona bokosalema te nzambi ezali ko buka mobeko moye molobi ete tokoki kotelemela biyano ya maponami se liboso ya cours constitutionnelle..." Boye nde maloba maye. 

Peter kazadi alaki ko panza pulusu na ba balabala pona ko tindika  na botosi ya mobeko, Wana soki bayi opposition ba bateli likanisi lia bango lia botamboli. Pona ye nionso etali kotelemela maponomi esalemaka se liboso ya ba ndako ya bosambisi. 

Manso mabongisami, oyo ezali komonana pe oyo ezali ko monana te na tina ete pulusu pe mapinga ba batela kimia pe alima. 

Mayebisi ma CENI na oyo etali maponomi ezali kopesa esengo te na bayi opposition, pona bango ngambo ya bokonzi ba saleli lokuta pona kolonga maponomi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa