RDC : lisambisi ya Joseph Kabila ezo banda na mokolo moa vendredi 25/07 na ndako ya bosambisi ya mapinga
Ndako ya bosambisi ya mapinga ezali ko banda lisambisi linene etali Joseph Kabila Kabange, tata mokonzi ya kala, pe moko ya ndako ya ba mpaka pona libela.
Kolandisama mokonda ekomeli ndako ya misala Une.cd lisambisi liango likosalema na suku enene ya palais de justice ezui na bokuni ya ba balabala pumbu pe Batonier na komine ya Gombe.
Na moboko ya mokambi ndako ya bosambisi ya mapinga, mokanda n° 051/25 ezali ko funda tata mokonzi ya kala na mambi mayike lokola:
* Bosangani na batomboki
* Botomboki liboso ya molongo pe mokili mobimba
* Koboma na mandoki
* Trahison
* Apologie
* Bozui basi na makasi
* Torture
* Deportation pe ko luka ko botola engumba Goma na makasi
Ba mbeba oyo eyebani na mibeko ya makoki ma bato onte ya molongo, ezali ya makasi oyo tata mokonzi moko te na ekolo Congo demokratiki asala.
Bosembo etali mapinga ezuaki uto mua 22/05 nzela na ndako ya ba mpaka pona ko landela ye. Na kati ya ba mpaka 98, ba mpaka 88 ponaki kolongola likolo naye mibeko ya ndako ena na tina ete akende ko ndima liboso ya mibeko, kaka ba mpaka 5 nde ba ponaki te, pe ba lokasa misato ezalaki ya malamu te.
