RDC: botongi ya ba ndako 12 pona mambi ma ntoki na linaka 145 territoires (Catherine Katungu)

RDC eko zua mikolo mikoya ba ndako 12 pona misala ma ntoki kolandisama na linaka lia 145 territoires. Sango epesami na ba panzi sango mua jeudi 13/10. 

Sarah Meta Savu

13 Sanza ya zomi 2023 - 16:48
 0
RDC: botongi ya ba ndako 12 pona mambi ma ntoki na linaka 145 territoires (Catherine Katungu)

Pona Catherine Katungu Furaha, ba ndako eye eko tmbola elongo na ndako enene ya ntoki oyo ezali ko tongama na balabala ya enene ya triomphal na engumba mokonzi kisasa. 

" Nazui ndakisa ya ndako enene ya ntoki ya afrika oyo misala mizali kosila na mikolo mingi te; siko to longoli ba ndako ezali ko tongama na mwenga PE butembo, minisele azui kowuta na mbulamatari nzela pe misolo pona tonga ba ndako 12 kolandisama linaka 145 territoires "

 Lisusu Minisele atali mambi ma ntoki atuti tolo pona misala malamu maselemi n'a se ya bokambemi naye lokola masano ma francophonie oyo muan'a mboka Catherine Katungu atie na kati ya misala ya tata mokonzi o'moto ya union africaine pe bokomi ya rumba na kati ya bozui ya UNESCO. 

N'a se y bokambemi ya Catherine Katungu ekolo Congo demokratiki esimbaki milulu mia FEMUA na engumba Abidjan pe milulu FESPAM na engumba Brazzaville azongisi na moboko ya ekolo Congo demokratiki ndako ya nkondo papa Wemba esika wapi ekomi bipayi yako talisa misisa ya rumba pe misala ya 50 nuances na engumba Paris. 

Moto ya yambo minisele etali ntoki na ekolo Congo demokratiki atuti lisusu tolo kotiya o'moto ya ndako ya misala azali komba lisanga ya baye basengeli ko kamba.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa