Bitumba o'moniele ya RDC : liboso ya makasi ya bilenge ya "Wazalendo" (baye basepeli kotia maboko simbisi na mapinga) ba tomboki ya M23 bakimi pe batiki biteni bisusu

Batomboki ya M23 na,maboko simbisi ya mapinga ya ekolo Rwanda bakimi pe batiki biteni bisusu ya masisi na etuka ya Nord Kivu, sima bondongwani na bango na bilenge ya Wazalendo ebandeli ya mposo tozali. 

Sarah Meta Savu

12 Sanza ya zomi 2023 - 12:56
 0
Bitumba o'moniele ya RDC : liboso ya makasi ya bilenge ya "Wazalendo" (baye basepeli kotia maboko simbisi na mapinga) ba tomboki ya M23 bakimi pe batiki biteni bisusu

" Na ngonga nzanga na ndambo ngomba ya kasopo ekomi na maboko ya bilenge bitumbu ya Wazalendo, ezali nde ngomba etelema na mabele ya kibarizo. Na tango moko ko ndongwana ezo ko koba na kanaba/ Mulimbi ya regroupement ya Tongo, na Rutshuru", ba panzi sango ya Nord Kivu. 

Ba sango yango elobi ete bilenge ya Wazalendo ba bengani na makasi colonel MTEKANO ya M23 _RDF, na likolo ya ngomba ya kasopo. 

Se o'libaku bilenge ya bopesi maboko simbisi na mapinga FARDC bazali ko koba ko bengana batomboki na Rutshuru. Pona Bertrand Bisimwa mokonzi ya batomboki ya M23, mapinga ya FARDC ezo bundisa bango ko bosanaka boyokani ya cessez le feu. Maloba maye mazali kotalisa bosolo ya ba sango ewuti na ba panzi sango ya Nord Kivu. 

" Uto mokolo moa jeudi 05 /10 na ngonga ya 2h, mapinga FARDC, FDLR,  pe basusu bazui mabele ya kitshanga oyo M23 bazongisaki na maboko ya mapinga EACRF. Na ngonga mineyi ya ntongo bayaki lisusu ko bundisa na kirolirwe " elobi Bertrand Bisimwa. 

Mapinga ya Congo demokratiki ba lobi koyeba ebandeli pe suka te ya likambo lina bango basimbi mokano yako tosa boyokani ya cessez le feu.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa