RDC : Tshisekedi afongoli misala ya kopani ya sika ya pepo na RDC Air Congo

Mokolo ta mardi 17/12 Tata mokonzi ya ekolo Congo demokratiki Félix Antoine Tshisekedi Tshilombo, kuna na libanda ya pepe ya N'djili, afongolaki misala pona kopani ya sika ya pepo Air Congo. 

Sarah Meta Savu

18 Sanza zomi na mibale 2024 - 11:16
18 Sanza zomi na mibale 2024 - 11:17
 0
RDC : Tshisekedi afongoli misala ya kopani ya sika ya pepo na RDC Air Congo

Ko pimbwa ya liboso ya kopani eye ezali na nzela boyokani oyo ezali kopesa RDC 51% ya misolo pe Ethiopian airlines 49% ya misolo na kati ya kopani. 

Kopani ezali na pepo mibale ya Boeing 737-800, oyo eko kende Lubumbashi, Goma, Kisangani, Kolwezi, kalemi pe Mbujimayi. 

Bolamu ya boyokani yango ezali ete eko mabongisi ya pepo bokengi pe botosi ya ngonga. Mayekoli pona basali. 

Mokambi mbulamatari molandi na mambi ya transport, Jean Pierre Bemba, atalisi ete Air Congo ako zwa ba pepo mineyi ya Boeing 737-800 na mobu moko pe mibale misusu na mibu mibale. 

Mokambi ya kopani Ethiopian airlines alaki na tata mokonzi Félix Tshisekedi mosala malamu nako tamisaka ndakisa ya misala asali na ekolo Togo pe Malawi. 

Ebandeli ya misala ya Air Congo ezali na likanisi ya mbulamatari yako kolisa ba nzela ya pepo na ekolo Congo demokratiki.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa