Campagne électorale :  na tshikapa, Adolphe Muzito abengi bayi mboka ko bundisa bozangi boyakani na bikolo

Na tshikapa, engumba mokonzi ya etuka Kasaï, Adolphe Muzito asengi na bayi mboka ba pesa motuya na kimia na bisika yako bendanaka nzambi bozangi boyakani na bikolo ekomi ko kende mosika. 

Sarah Meta Savu

6 Sanza zomi na mibale 2023 - 15:15
 0
Campagne électorale :  na tshikapa, Adolphe Muzito abengi bayi mboka ko bundisa bozangi boyakani na bikolo

Liboso ya bayi mboka moweleli ebonga ya bokonzi n° 24 na maponomi ya 20 décembre 2023, azongisi na makasi ya bato misisa ya bikolo esangana na etuka ya Kasaï oyo ewuti na ba koko.

" Eloko boyebi te ezali ete, ba pende, ba Bindi, ba Luba pe ba Tshokwe bango banso ba bimi na Koko Ilunga. Bowuti na Koko moko ba koki ko kuta bokabuani kati na bino te" nde maloba maye liboso ya boyi mboka. 

Milulu ya campagne électorale etindiki mokambi mbulamatari ya kala asenga na payi mboka ba pona ye pona kozwa kiti ya bokonzi pe baweleli bibonga pona ndako ya balobeli to bakambi ba komine ya lisanga lia ye na ntina yako pesa ye nzela akokisa linaka lia ye na moto ya ekolo. 

Adolphe Muzito azali ko koba na milulu ya campagne électorale na etuka ya Kasaï kuna na kamonya, yambo akende ko sukisa yango na engumba Kananga. 

Bisika nionso aleki Adolphe Muzito ayambamaki malamu na bayi mboka pe bazali kotia matoyi pona koyoka maloba ya moweleli ebonga ya bokonzi n° 24 na maponomi ya 20 décembre 2023.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa