Maponomi ya 2023 : Felix Tshisekedi andimi kotika kiti ya bokonzi soki molongi azui na « bosolo »

Felix Tshisekedi alobi ete ako kangama na bokonzi te soki alongi te na maponomi ya 20 décembre 2023. Moweleli ebonga ya bokonzi andimboli yango na masolo naye elongo na ba panzi sango ya Financial Times na kisasa.

Sarah Meta Savu

5 Sanza zomi na mibale 2023 - 14:04
 0
Maponomi ya 2023 : Felix Tshisekedi andimi kotika kiti ya bokonzi soki molongi azui na « bosolo »
Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo, mokonzi ya Kongo demokratik

« Soki moto mosusu akongi pe na kweyi penza na bosolo o'kombo ya démocratie toko ndima ko kweya na biso ».

Felix Tshisekedi alembisi motema te pona bayi opposition pe lobi: « Maponomi ezali na nsomi na yango » pe alobi ete nungunungu na oyo etali koyiba bokonzi ezali makelele ya lukuta ewuti na bayi opposition pe bayi communauté internationale basepeli ko yoka.

« Tango inso bazo nganga moyibi na maponami, kasi bakimi mbango ko komisa nkombo pona kowelela bibonga. Nzoka nde soki nzela ezalaki te pona bango yako longa balingaki ba komisa nkombo te, bakomisi mkombo pamba ba ndimi ete mua nzela pona bango yako longa ezali ».

Ekolo Congo demokratiki oyo azali kobika eleko ya campagne électorale ekozala na maponomi mua 20/12 ya mobu moye tozali ata kokoso na mambi mayike ndakisa bozangi bokengi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa