Olive Lembe : « batu ya Force du progrès ba tindami pona ko boma ngai »
Lisanga ya ba tomboki ya Force du progrès ba bundisi ba kengi ya ndaku ya mokonzi ya mboka ya kala, Joseph Kabila Kabange, na mokolo ya ntuku misato na moko ya sanza ya nsambo ya mbula oyo (31 juillet de cette année) na engumba Kinshasa.
Na yango, mwasi ya Joseph Kabila, Olive Lembe, alobi ete ba tomboki mana ya Force du progrès ba tindamaki pona ko boma ye.
« Nazo beta sete epai ya ba konsi ya ekolo pona likama ba tomboki oyo UDPS azo kamba na mboka. Ezo pesa mawa », ndenge a lobaki.
Ba tomboki mana bazalaki nkama na ndambu. Polisi ya engumba Kinshasa akangaki basusu, basusu pe ba kimaki.
