Bitumba o'moniele ya RDC : Simon kimbangu alaki Tshisekedi ete ako bondela pona bozongi ya kimia

Tata mokonzi Felix Antoine Tshisekedi Tshilombo ayambamaki onte ya ndako naye ya mosala mokambi eklezia kimbanguiste, Simon kimbangu Kiangani mokolo moa mercredi 13/03.

Sarah Meta Savu

14 Lisungi pona macini 2024 - 18:08
 0
Bitumba o'moniele ya RDC : Simon kimbangu alaki Tshisekedi ete ako bondela pona bozongi ya kimia

Basololaki na mambi matali bokengi na moniele ya ekolo Congo demokratiki. 

" Nazo bondela pe nazo belela mawa ya Nzambe na tina ete kimia eyingela mabele na moniele ya RDC" nde maloba ya Simon kimbangu nako bima naye na masolo na tata mokonzi yambo yako senga na bandimi nionso ya eklezia naye kosala lolenge moko.

Mokambi ya eklezia kimbanguiste asepelaki na libaku pona ko tonda tata mokonzi na tina ya mokolo ya 06/04 "oyo ekoma mokolo yako kanisa tata Simon kimbangu na tina yako lamusa makanisi ma bayindo ya mikili mia Afrika"

Moa 06/04/2024 mokozala mbala ya mibale yako sepela mokolo moango na ekolo Congo demokratiki.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa