Bitumba o'moniele ya RDC : Paul Kagame andimi masolo na Felix Tshisekedi

Tata mokonzi ya ekolo Rwanda Paul Kagame  ayambamaki lundi 11/03 na moninga moa ye ya mosala ya ekolo Angola, Joao Lourenço, mokambi masolo pona oyo etali bitumba o'moniele ya RDC. 

Sarah Meta Savu

12 Lisungi pona macini 2024 - 10:59
 0
Bitumba o'moniele ya RDC : Paul Kagame andimi masolo na Felix Tshisekedi

Kolandisama maloba ya ba panzi sango ya ekolo Angola , Paul Kagame andimi kosolola elongo na Felix Tshisekedi pona likambo litali bitumba o'moniele ya RDC pe bozangi boyokani kati Kinshasa pe Kigali. 

Tata mokonzi ya ekolo Angola nde ako pona mokolo pe bisika ya bokutani pona masolo ya Tshisekedi pe Kagame. 

Yambo ya niongo oyo Joao Lourenço aymbaki na mosolo moninga moa ye ya mosala ya ekolo Congo demokratiki. Felix Tshisekedi andimaki bokutani elongo na ndeko pe monguna naye, Paul Kagame.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa