Bitumba o'moniele ya RDC : mapinga ma SADC makoki ko koma mua 10 /12 na RDC

Kolandisama na maloba ya momemi maloba ya ndako ya mosala ya tata mokonzi, mapinga ya SADC ekoki ko koma na mabele ya ekolo Congo demokratiki o'mua zomi ya sanza zomi na mibale moye tozali. Eric Nyindu apesi sango yango na etando ike ya France24 ebandeli ya mposo. 

Sarah Meta Savu

8 Sanza zomi na mibale 2023 - 19:28
 0
Bitumba o'moniele ya RDC : mapinga ma SADC makoki ko koma mua 10 /12 na RDC

Sima kolongwa ya mapinga ya EAC na RDC, ekolo etali na ngambo ya SADC oyo azali lisanga lia lolenge loko na EAC, ekolo Congo demokratiki eko zala na boyokani na SADC na mambi matali mapinga, elingi koloba ete SADC ako tinda mapinga ma ye na RDC pona kopesa maboko na mapinga FARDC pona kosunga bango nako silisa bozangi bokengi o'moniele ya RDC. 

Kino sikawa mosala mapinga ya SADC eko sala eyebani malamu te soki. bako zala na kati kati to bako bundisa na polele batomboki ya M23-RDF oyo bazali na lisungi ya mbulamatari ya ekolo Rwanda pe Paul Kagame. 

Ekolo Congo demokratiki eboyi kozongisa sika boyokani elongo na EAC pamba misala misengelaki bango ko sala emonani te, misali misalemi te lolenge elikyaki baye ba salaka na Tshisekedi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa