Kisasa : ndako ya bosambisi ya cour d'appel bazongisi Godé Mpoyi na ebonga ya bokambi ndako ya balobeli ya etuka

Ba sango ebele ebimisi ete Godé Mpoyi azongi na ebonga ya bokambi ndako ya balobeli ya Kisasa moa lundi tuku mibale na mineyi ya sanza sambo mobu koto ibale tuku ibale na isato na mokano ya ndako ya bosambisi ya cour d'appel.

Sarah Meta Savu

24 Sanza Sambo 2023 - 22:24
 0
Kisasa : ndako ya bosambisi ya cour d'appel bazongisi Godé Mpoyi na ebonga ya bokambi ndako ya balobeli ya etuka

Mokambi ndako ya balobeli ya Kisasa balongolaki ye mokolo moa mitano,sambo, sanza ya sambo ya mobu tozali. Moto oyo atiaki tembe na Ngobila akweyaki na maponami ya balobeli tuku misato na mineyi na kati tuku mineyi na moko na likita lia mokolo moango.

Kolongua na ye ewutaki na bofundami ya mua balobeli oyo bazalaki ko funda na makambu malandi: ko zanga makoki ya ko kamba pe bozangi mayele na ena.

Esengeli na Ngobila abanga ko zanga ya Godé Mpoyi na ya balobeli?

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa