Kisasa : Moïse katumbi na ndako ya Franck Diongo

Mokambi lisanga politiki ensemble pour la république, Moïse katumbi, na moto ya lisanga lia batu ya lingomba politiki na ye ba kendaki kotala na Franck Diongo mokolo moa lundi kuna na cité ya ba ancien combattant na kisasa.

Sarah Meta Savu

18 Sanza Sambo 2023 - 09:29
 0
Kisasa : Moïse katumbi na ndako ya Franck Diongo

Ba keyi kotala ye sima ye kobima na boloko ya demiap mokolo moa poso loleki zomi na mitano,sanza sambo. Franck Diongo atiamaki maboko na mapinga ya ndako ya renseignements militaires (demiap ya kala).

Elobamaki ete bokangami na ye ekoki ko tambola elongo na bokangami ya Salomon Kalonda oyo afundami koluka kozua bokonzi na mandoki na lisungi lia batomboki ya M23 pe ekolo Rwanda.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa