RDC : mbulamatari alaki kolandela batu basali Delly Sesanga mabe

Mbulamatari ya Congo demokratiki azali na esengo te na mabe oyo basali Delly Sesanga na engumba Kananga. Liboso ya panzi sango minisele ya mambi ma bo panzi sango moa yambo ya sanza muambe atelemeli likambo liango.

Sarah Meta Savu

1 Sanza ya muambe 2023 - 14:09
 0
RDC : mbulamatari alaki kolandela batu basali Delly Sesanga mabe

Molobeli moa mbulamatari amemi liboso ya ba panzi sango masolo maye elongo na mokambi mbulamatari molandi atali mondelo o'mboka, Peter Kazadi, oyo alaki komema na mibeko batu yango.

Minisele atali mambi ma bo panzi sango alobi ete mambi maye mazali na esika te kolandisama nsomi mingi mingi na ekolo eye ya maponami.

Mokolo moa mposo moleki, Delly Sesanga bazuiki likama na bayi mboka na engumba ya kanga nako kita na bango na pepo. Mituka mia bango ebele ebebi na mabanga ya batu ya mbilinga mbilinga bayaki kotiya mobulu.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa