Likita linene ya ONU: koma na USA, Felix Tshisekedi ako lobela mambi matali bokengi na moniele ya ekolo Congo demokratiki

Tata mokonzi ya ekolo Congo demokratiki Félix-Antoine Tshisekedi azali kobika kuna na ekolo amerika na engumba New York uto lomingo, zomi na sambo ya sanza libua.

Sarah Meta Savu

19 Sanza ya libwa 2023 - 12:40
 0
Likita linene ya ONU: koma na USA, Felix Tshisekedi ako lobela mambi matali bokengi na moniele ya ekolo Congo demokratiki

Wana kolandisama na lioko liyebisi lia ndako ya misala ya tata mokonzi Félix Tshisekedi likomelaki ndako ya ba panzi sango ya UNE.CD mua lundi,zomi na libwa ya sanza libwa.

Kolandisama na liyebisi liango, tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi asengeli ko kozua esika na likita linene ya ONU ya mbala tuku sambo na muambe, bisika ako zua maloba mokolo mua misato, pona lobela mambi matali bokengi na moniele ya ekolo Congo demokratiki.

Yambo yako mata na pepo naye tata mokonzi akambaki likita lia ba minisele bo momesano mokolo moa mitano mposo nionso.

Koleka na ye ya suka na likita lia ONU, tata mokonzi atalisaki lolenge lia pole nionso bozangi bokengi na moniele ya ekolo Congo demokratiki uto mibu tuku misato sikoyo oyo ebimi bayi mboka ebele.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa