RDC : Kisasa eko yamba likindo ya CJCA mobu 2026
Ekolo Congo demokratiki, eko yamba likindo ya CJCA ya mbala muambe pona mobu 2026, mokano mozuamaki na likita lia bango ya mbala sambo o'nzela ya maponomi na engumba Victoria falls na ekolo Zimbabwe.
Ekolo Congo demokratiki etalisamaki Dieudonné Kamuleta mokambi ya ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle.
Na likita lia mbala sambo ya CJCA, Dieudonné Kamuleta azuaki maloba liboso baninga naye kuna esika ya mikili ya Afrika pe ya poto pona kotalisa " botosi ya bomoto lokola lolenge yako bolimboli mibeko", na likita ya mbala misato. Makambo ya mikolo nionso na ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle ya RDC.
CJCA azali na manaka ebele lokola lisungi lia ba moko na basusu maboko simbisi, bosembo ya bonkonzi na Afrika. Ekambami na Luke Malaba, mokambi ya ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle ya Zimbabwe pe azali ko kitana na Mohamed Amine Ben Abdallah ya ekolo Maroc.
