Liwa ya mon seigneur Dominique Bulamatari episkopo ya molegbe
Monseigneur Dominique Bulamatari episkopo ya molegbe azongisi molema lelo lundi 26/08/2024 n'a kisasa engumba mokonzi ya Congo demokratiki.
Episkopo apambolaki libala ya moyembi Nioka Longo mokolo ya samedi 24/08 eleki.
Mgr Dominique Bulamatari Kizayakana aboyami na mua 04/06/1955 na engumba kisasa, akomi mupe mua 20/04/1980 pona archidiocèse ya kisasa. Na mobu 1999 pape Jean-Paul ll amatisi ye lokola episkopo molandi kuna archidiocèse ya kisasa pe azui lipamboli ya Mokambi moa episkopo mokonzi Frédéric Etsou mua 30/01/2000.
Mua 14/11/2009 pape Benoît XVl amatisi ye lokola episkopo ya molegbe na mbandaka - Bokoro na etuka ya sika ya Notd-Ubangir. Akonaki na mgr Ignace Matondo kwa Nzambi, oyo akambaki uto 1998 kino 2007.
Na mobu 2021 molegbe ezalaki ko tanga bato 1.773.900 pe na kati na bango 944.440 lokola banzimi ya katoliko to pe 52% ya bato kuna esika.
