Kisasa : général Kilimbalimba apekisi pulusu kokende na mituka mitelemi mabe
Mokambi ya pulusu na engumba mokonzi kisasa, général Blaise Kilimbalimba, apekisi pulusu ya nzela kokanga bakumbi mituka na ba nzela na engumba mokonzi kisasa pona kotelemela mutungisi na ba nzela.
Apekisi pe kokende na mituka etelemi mabe.
" Eza liboso ya regideso na balabala 30 juin, reine de la paix, ekoteli ya camp lufungula na huilerie kino palais du peuple kino lopitalo ya cinquantenaire".
Blaise Kilimbalimba asengi na ba kumbi nionso bako kutana na mutungisi ya pulusu na nzela akende "mbala moko" epayi na ye.
Mokano moye ya bakonzi ya pulusu eye na ngonga malamu. Na kisasa ba kolo mituka ebele bazali ko mitungaisa pona mituka na bango. Mokama ya mituka ekeyi na ebombelo mituka ya pulusu atako.
