RDC : mbulamatari abimisi misolo ba millions zomi ya misolo mia amerika pona ko zongisa misala na Congo Airways

Ba millions zomi ya misolo mia amerika, nde misolo mipesi mbulamatari pona ko zongisa misala na lombango na kopani Congo. Sango endimami bisika ebele lokola minisele ya mambi matali transport.

Sarah Meta Savu

19 Sanza ya libwa 2023 - 11:45
19 Sanza ya libwa 2023 - 11:46
 0
RDC : mbulamatari abimisi misolo ba millions zomi ya misolo mia amerika pona ko zongisa misala na Congo Airways

" misolo miye miko sunga ko somba pepo mibale pe mambi masusu yambo misolo misusu mimonana. Eza kozongisa na lombango misala na kopani Congo Airways " minisele ya transport Marc Makila.

Kopani Congo Airways etalisaki botelemisi ya misala kuna uto mua zomi na moko sanza ya libwa mobu moye tozali sima ya Kokoso na pepo ya bango moko ya suka.

Kotelema ya misala na kopani ena epesi pasi na maye matali transport ya pepo na ekolo Congo demokratiki. Liloba la mbulamatari mazelamaki na lombango.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa