RDC : mbulamatari afongoli milulu « nionso pona ekolo » pona ko telemela botomboki ya Rwanda

Mbulamatari ya RDC afongoli milulu nionso pona ekolo pona ko telemela botomboki ya Rwanda o'moniele ya ekolo Congo demokratiki, liyebisi lipesamaki na minisele ya bopanzi sango liboso ya balanginisi sango na Kisangani.

Sarah Meta Savu

3 Sanza ya muambe 2024 - 13:19
3 Sanza ya muambe 2024 - 13:20
 0
RDC : mbulamatari afongoli milulu « nionso pona ekolo » pona ko telemela botomboki ya Rwanda

Kolandisama na maloba ya Patrick muyaya molulu moye mozali pona ko telemela elongo pe moko n'a moko botomboki pe baye nionso batelemi lokola banguna pona ntombwa ekolo Congo demokratiki.

« Molulu moye mozali lolenge lako yebisa na moyi congolais monso ete bopikiliki naye ezali motuya na bitumba oyo »elobi Patrick muyaya.


Minisele ya bopanzi sango azali ye moko te liboso ya balanginisi sango, kasi elongo na molobeli ya mapinga général Sylvain Ekenge, oyo azuaki libaku pona kolendisa bituluku ya mapinga oyo bazali ko bundela ekolo.

« Nguya ya monguna ekoki kozala makasi,kasi tozali koleka mapinga tozali baye tozali bakomi koma lisolo (...) Monguna akoki kozala na ba pepo mandoki kasi azali na molema na biso te. »,Maloba ya général.

Molulu moye mozali sima ya molulu " bendele ekweya te" pona kotemela botomboki ya Rwanda na ekolo Congo demokratiki.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa