RDC « Longe moko misolo ya ba million zomi na motoba ya misolo mia amerika ezo kosa batu, lolenge moko motango ya ba poni ba million tuku mineyi na motoba ezali lokuta na misu y bato »C. Nangaa

Pona Corneille Nangaa atiki te ko lobela mabe mabongisi ma maponami na ekolo congo demokratiki. Mokambi moa kala ya ndako ya maponami (CENI) motango ya ba poni ba million tuku mineyi na motoba baye bakomisi nkombo na bayi ceni ezali solo te lolenge moko na misolo misengeli kosala mosala na mobu koto ibale tuku ibale na isato (2023).

Redaction

12 Sanza ya mitano 2023 - 14:43
 0
RDC « Longe moko misolo ya ba million zomi na motoba ya misolo mia amerika ezo kosa batu, lolenge moko motango ya ba poni ba million tuku mineyi na motoba ezali lokuta na misu y bato »C. Nangaa

O'nzela ya lioko mokanda na tweet o'singa mondele mokolo mua mitano, zomi na mibale ya sanza ya mitano, moto oyo azali sikawa kotelemela bokonzi ya Tshisekedi alobi ete mikolo motoba pona misala pona liboke lya misala mia maponami ezali ko longobana te na lolenge esengeli kozala. Na se ya bokambemi ya C Nangaa misala miango mizuaki pene ya mposo misato.

« Longe moko misolo ya ba million zomi na motoba ya misolo mia amerika ezo kosa batu, lolenge moko motango ya ba poni ba million tuku mineyi na motoba ezali lokuta na misu y bato koloba kosala misala mia liboke mia maponami na mikolo motoba ekoki ko salema te, lokuta ! To tika kosa, ezali ko memia ekolo Congo te »makomi ya C Nangaa na Tweeter.

Ndako ya maponami mokambemi na Denis Kadima ebongisi mikolo motoba pona misala mia liboke mia maponami sima ya ko longua ya bayi Francophonie, esengelaki ba sala elongo na bato ya libanda.

Pona batelemeli bokonzi mabongisi ya maponami eza yako bambana kolandisama na mikakatano minso ndako ya maponami ezali ko kutana na yango. Nungunungu ezo sila te na oyo etali Makelele makoki ko zala na sanza ya zomi na mibale sanza ya maponomi.

Ndako ya maponami, mpe mbulamatari ebondisi mitema mia bayi mboka na oyo etali bozalisami ya maponomi na mikolo misengeli pona yango.Denis Kadima elongo na baye basalaka naye balapi ndayi ko tosa kalaka ya moponomi lolenge ebongisami

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.