Kinshasa : Katumbi, Fayulu, Matata et Sesanga ba pusi botalamboli na bango pona mua tuku ibale ya sanza mitano

Ba Kambi ya batelemeli bokonzi na politiki Moïse katumbi,Martin Fayulu, Augustin Matata Ponyo et Delly Sesanga bazui mokano ya ko pusa botamboli na bango pona mua tuku ibale ya sanza mitano ya mobu koto ibale tuku ibale na isato na engumba mokonzi kisasa na ekolo congo demokratiki.

Sarah Meta Savu

12 Sanza ya mitano 2023 - 15:35
 0
Kinshasa : Katumbi, Fayulu, Matata et Sesanga ba pusi botalamboli na bango pona mua tuku ibale ya sanza mitano

Mokano moango molobamaki  na Kambi banso mineyi ya lisanga ya ba telemeli bokonzi na politiki o'boso ya ba palanginisi sango, nzoka nde, bango ba selengwanaki koboya mokano moa moyangeli ya engumba mokonzi kisasa Gentiny Ngobila pe kotambola o'mua zomi na misato ya sanza mitano.

Botamboli boango ememamaki nayino o'mua zomi na muambe ya sanza mitano kolandisama na mokano moa moyangeli ya engumba mokonzi kisasa Gentiny Ngobila, kasi, ba kambi ya batelemeli bokonzi ba telemelaki mokano moango po bango moko bazua sikawa mokano ya ko pusa yango o'mua tuku ibale ya sanza mitano.

Moïse katumbi, Martin Fayulu Augustin Matata Ponyo et Delly Sesanga bako tambola pona kobuta ya talo, mabongisi ya maponami mpe pona koboya bokaboli ekolo congo demokratiki na biteni

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa