ESU: misolo ya RAM ezo tonga biteyelo ya likolo na RDC " Mohindo Nzangi"

Misolo ya RAM esungi pona botongi ya biteyelo ya likolo na Congo demokratiki. Nde maye malobi Mohindo Nzangi minisele atali mambi ya biteyelo ya likolo. 

Sarah Meta Savu

26 Sanza ya zomi 2023 - 08:35
 0
ESU: misolo ya RAM ezo tonga biteyelo ya likolo na RDC " Mohindo Nzangi"

Biyano na mituna ya ba panzi sango oyo epanzani bisika nionso mokolo moa mercredi 25/10, Mohindo Nzangi atangi biteyelo ya likolo oyo bizui bilamba ya sika o'nzela ya misolo mia RAM lokola INBTP, UPN pe eteyelo ya bakolo ya Kananga,Mbuji-mayi pe Bunia. 

" Misolo pona bokokisi ya manaka maye matano mawuti na libengi ya ARPTC na mitindo ya tata mokonzi." 

RAM oyo emonanaki lokola nzela ya koyiba misolo ya bayi mboka, elobisaki mingi. Na tina nango minisele ya PTNTIC pe minisele ya bopanzi sango ba brngamaki na ndako ya balobeli pona kosamba.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa