RDC: Human Rights Watch asengi na mbulamatari andima te mobeko ya Tshiani

Lisanga lisanga libundaka pona makoki makoki ma bato Human Rights Watch o'kati ya lioko mokanda  mobeko moye mozali ko tiya « bokeseni »  

Redaction

1 Sanza ya mitano 2023 - 21:11
 0
RDC: Human Rights Watch asengi na mbulamatari andima te mobeko ya Tshiani

Ko landisama na maloba ya Carine Kaneza Nantulya dileketele mokambi ya lisanga lina, bakonzi ya ekolo congo ba koki kosalela mobeko moye pona kopekisa bayi bayi mboka kotia libaya na maponami pona bokambi ekolo na politiki.

« Mobeko moye mozali kaka ko longola to kokabola te ekoki pe ko benga mbilinga mbilinga »,  boye nde atalisaki o'nzela ya maloba mokambi ya lisanga Lina.

Human Rights Watch bazali kokanisa ete mobeko eza pona kotia pembeni bayi mboka mosusu na maponami ndakisa Moïse katumbi oyo aza na tata moboti ya ekolo Grèce.

Likanisi lia mobeko moye mozali ko senga ete moto azala obele na tata na maman na misisa ya ekolo congo demokratiki pona kozua ebonga ya bokambi ekolo to misusu.

Likanisi liango liwuti na Noël Tshiani moko ya batieyi libaya na ebonga ya bokambi ekolo na maponami ya mobu koto ibale zomi na muambe, pe emami na ndako ya ba lobeli o'nzela ya Nsingi Pululu moko ya ba lobeli ya bayi mboka, likanisi ya mobeko moango mokomisami na lokasa la misala ya eleko loye kuna na ndako ya ba lobeli.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.