Bitumba o'moniele ya RDC : Kagame nde azali ko yeba mozindo ya likambo ezali ye kosala te, nako tiaka lobi ya ba tutshi ya RDC na kokoso ( Christophe Lutundula)

Mokambi mbulamatari molandi atali mambi ma boyokani na bikolo bisusu pe francophonie, Christophe Lutundula ayonali na maloba mabe ya Paul Kagame likolo ya tata mokonzi Felix Tshisekedi mokolo moa lundi 25/03/2024. 

Sarah Meta Savu

26 Lisungi pona macini 2024 - 18:27
 0
Bitumba o'moniele ya RDC : Kagame nde azali ko yeba mozindo ya likambo ezali ye kosala te, nako tiaka lobi ya ba tutshi ya RDC na kokoso ( Christophe Lutundula)

Pona mokambi moa misala etali boyokani na ba paya na RDC , Kagame nde azali ko yeba mozindo ya likambo ezali azali ko sala te, ye oyo abomi ba congolais ebele pe azali ko teka lobi ya bayi mboka na eteni ena. 

" Tata mokonzi Felix Tshisekedi atalisi nani Paul Kagame azali, ye oyo azali koyeba maye azali kosala te

Se o'libaku Christophe Lutundula alobeli panzi sango na oyo etali makambu tat mokonzi abeteli sete yambo andima masolo na ekolo Rwanda na nzela yako luka kimia na bitumba o'moniele ya RDC. 

Ya liboso ezali ko longwa ya m23 na mabele ya RDC pe sima bokonzi kuna esika na maboko ya mbulamatari ya RDC na biteni ezuami na bitumba nde bongo Felix Tshisekedi ako ndima masolo na Rwanda. 

Na nzela ya ndako ya bapanzi sango Paul Kagame alobi " Felix Tshisekedi akoki ko sala nionso kasi ayebi mutuya ya makambu azali ko loba te" maloba oyo etiki bayi mboka na RDC na kimia te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa