RDC : Fayulu, Mukwege pe ba weleli basato ya ebonga ya bokonzi basengi ko bandela maponomi kasi na Kadima te

Baweleli ebonga ya bokonzi, Floribert Anzuluni, Nkema Lilo, Théodore Ngoyi, Denis Mukwege pe Martin Fayulu, na lioko liyebisi na ya mercredi 20/12/2023 basengi na ndako ya maponomi CENI ko bandela maponomi na se bokambemi ya Denis Kadima te. 

Sarah Meta Savu

21 Sanza zomi na mibale 2023 - 08:19
 0
RDC : Fayulu, Mukwege pe ba weleli basato ya ebonga ya bokonzi basengi ko bandela maponomi kasi na Kadima te

Pona baweleli ebonga batono maponomi masalemi mobimba te pe na biteni binso ya ekolo te lolenge lobongisami na buku likonzi ya ekolo Congo demokratiki pe na mobeko ya maponomi. 

Fayulu, Mukwege pe baweleli ebonga misusu ba beti sete pona kozengela maponomi na ngonga kolandisama boyokani ya masanga pilitiki pe bakambi ya sika ya ndako ya maponomi CENI. 

Lisusu basengi na bayi mboka, CENI, mbulamatari, SADC, bayi communauté internationale, Union africaine ete na ntongo ya jeudi 21/12/2023 baloba ete "maponomi mabongisamaki pona mua 20 décembre esalemi te ko longobana na buku likonzi pe mobeko ya maponomi."


Maponomi masalemi lolenge ebongisamaki te. Pona CENI bakokisi obe 70% ya misala ma bango. Ba suku ya maponami oyo ezwaki kokoso eko fongola bikuke mua lobi jeudi 21/12.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa