Masano ya Francophonie: Peter Kazadi alaki boloko na bato ya mbilinga mbilinga kino suka ya masano
Mbulamatari alaki mabongisi pona bokengi mikolo zomi ya masano ya Francophonie na kisasa. Minisele ya mondelo o'mboka " baye bako bima libanda ya mitindo pe mibeko mitiami bako lekisa eloko enso ya masano na boloko."
Abakisi ete na kati pulusu pe mapinga bakozala kolandela bokoti na bobimi na bikoteli binso.
Na kati ya eteleyo unikin ba masini ya informatiki eko sala musala kolandisama na maloba ya makambi Kwadja.
Kisasa emilengeli pona masano lolenge libwa mpe lolenge zomi ya ntoki uto mua tuku mibale na muambe ya sanza Sambo kino mua motoba ya sanza muambe. Pona mbulamatari nionso ebongami pona koyamba milulu miango.