Masano ma francophonie ya mbala libwa: bikolo ya lisanga lia francophonie bandimi misala mia RDC
Likita lia francophonie ya mbala kama moko tuku mibale na misato lifongwami mokolo moa misato,tuku ibale na yoko na engumba Paris na ekolo France, na se ya bokambemi ya kalaka mokambi ya lisanga liango Louise Mushikiwabo.
Kuna esika mokambi ya misala mitali masano ma francophonie ya mbala libwa Isidore Kwadja alobi boye "bikolo ya lisanga lia francophonie ba ndimi misala ekolo congo demokratiki ekokisi pona masano mango na engumba mokonzi kisasa".
Batalisi bilongi ya bakonzi ba bakisi ete esengeli na RDC asilisa na lombango maye matali bokengi, bokolongono boa nzoto pe mituka ya ba beti masano elongo na ba paya ya bikolo bisusu.
Na mikolo tuku mineyi ya masano Isidore Kwadja alobi ete motango koto misato kama libwa tuku mineyi na muambe ba mikomisi pona masano mango.