Masano ma francophonie ya mbala libwa: tata mokonzi amoni ete misala mia botongi ekomi na suka

Tata mokonzi Felix Tshisekedi akendaki mokolo moa misato, zomi na mineyi, sanza motoba, mobu koto ibale tuku ibale na isato kotala misala mia botongi ya libanda ya masano pona masano ma francophonie kuna na lobala ya tata Raphaël.

Redaction

15 Sanza motoba 2023 - 11:35
 0
Masano ma francophonie ya mbala libwa: tata mokonzi amoni ete misala mia botongi ekomi na suka

Kolandisama na maloba ya mokambi misala mia masano mango, Isidore Kwadja Ngembo, Felix Tshisekedi amoni lolenge misala ya makasi ekomi na suka mpe ekoki ko sila pene mua tuku misato ya sanza motoba. " Tata mokonzi ye mey amoni ete ebele ya misala mia botongi esili etikali obe misala ya suka na kati bisika batiya langi ya bendele ya ekolo mpe misala miye misengeli kosila na suka ya sanza motoba.

Maloba ma Isidore Kwadja eye ko silisa makelele na oyo etali botelemi ya misala miango.

Masano ya Francophonie ya mbala libwa eko zala na mimekano libwa mpe misala ya ntoki zomi na moko. Congo demokratiki eko yamba bato ya masano motango koleka koto mineyi ya bikolo tuku mineyi na mibale.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.