Etat de siège : Felix Tshisekedi afongoli misala na Ituri pe Nord Kivu

Tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo, atatoli na disikuli naye pona bayi mboka ya mua 12/10 azali ko lembisa mibeko ya Etat de siège na bituka Ituri pe Nord Kivu. 

Sarah Meta Savu

13 Sanza ya zomi 2023 - 21:15
 0
Etat de siège : Felix Tshisekedi afongoli misala na Ituri pe Nord Kivu

"Mokano moye mozali kolandisama makanisi ma moto na moto o'likita lia table ronde pe ezali ko pesa nzela na bakambi bituka bina kozongela mosala bisika bizui sikawa bokengi na maboko ya mapinga ya FARDC. Yango epesi nzela na bayi mboka kobika bonsomi pe makoki ma bango kolongobana na buku likonzi" elobi tata mokonzi. 

Kolembisama ya mibeko mitali Etat de siège etali mingi mingi bonsomi ya bayi mboka yako kende bisika na bisika na biloko na bango pe ko ya couvre feu " kolongobana na mibeko". 

Bakambi bituka bazongeli mosala moa bango na nionso ko longola maye matali bokengi eko kambama na mapinga. 

Tata mokonzi asengi na mbulamatari kobimisa na "lombango" lifuti lia bakambi ya bituka bina oyo ekangamaki kolandisama mineko ya Etat de siège, kolongobana na mokanda ya tata mokonzi mua 3/05/2021. 

Bituka Ituri pe Nord Kivu bazali na Etat de siège uto mibu mibale. Kasi bayi mboka bayike bakufi na eleko yango.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa