Jacquemin Shabani: « ekolo Rwanda ezali moko ya Tina ya makasi ya bozangi bokengi na RDC »

O'boso ya ba panzi sango mua lundi 21/07/2025, elongo na molobeli ya mbulamatari Patrick Muyaya, Jacquemin Shabani mokambi mbulamatari molandi atali mambi ma mondelo o'mboka, bokengi pe bokoko, azongelaki maye matali mokanda moa boyokani ezuaki mokoloto ya kisasa pe l'AFC/M23 na Doha. 

Sarah Meta Savu

22 Sanza Sambo 2025 - 21:49
22 Sanza Sambo 2025 - 21:52
 0
Jacquemin Shabani: « ekolo Rwanda ezali moko ya Tina ya makasi ya bozangi bokengi na RDC »

Na oyo etali « mambi mazali sima ya bitumba na RDC » VPM atalisi été ekolo Rwanda ezali moko ya makambu ezali ko tiya bozangi bokengi na RDC, kotalisa yango na miso ya mokili mobimba ezali bokeyi liboso

Sika esengeli kaka koyeba makambu yango te, kasi esengeli ko sukisa yango. Ekolo Rwanda ewuti kotia mokoloto na mokanda moa boyokani na RDC, mokanda oyo biso banso tozo ko landela. Eko pesa biso nzela yako talisa misala na biso na ntina yako zongisa kimia. " Boye nde alobi

Na likambo yango, Patrick Muyaya abakisi ete ezui moboko utu eleko ya ba noko.

Kasi mokanda moa boyokani ezali ko bota mituna ebele. Na yango Patrick Muyaya asengi na bapanzi sango batanga pe ba mekola yango malamu yambo yako talisa yango na bayi mboka. 

« To sengeli tozala alima na botangi mokanda moango pona komekola malamu bozindo ya liloba moko na moko o'kati, to bakisi mokanda ya resolution 2773, pe  mokanda ya boyokani ya Union africaine, pe ya nations unies, liyebisi ya likita lia SADC ya  mua 08/02 pe mingi mingi buku likonzi ya ekolo Congo. » Maloba ya Patrick Muyaya 

Pona mbulamatari mokanda moa boyokani kisasa- kigaali pe oyo ya Doha esengeli ekoka pona kosilisa bitumba ya mibu tuku misato oyo ezui bomoyi ya bato motango koleka 10.000.000 na moniele ya ekolo Congo demokratiki.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa