Kisasa : Ferré Gola ako zala na milulu ya loyembo mua mineyi ya sanza ya muambe o'libaku ya Francophonie

Mua mineyi ya sanza muambe na ngonga zomi na muambe kino ntongo, moyembi Ferré Gola ako zala na milulu ya loyembo na ndako enene ya palais du peuple na libaku ya Francophonie.

Sarah Meta Savu

27 Sanza Sambo 2023 - 11:47
 0
Kisasa : Ferré Gola ako zala na milulu ya loyembo mua mineyi ya sanza ya muambe o'libaku ya Francophonie

Bililingi ya moto ba bengi "jesus de nuances" bizo tambola na nzela ya interneti. Lisanga litali mabongisi ya masano pe baye ya pene pene ya moyembi ba ndimi solo ya sango yango.

Kino sikawa moyembi moko fongola masana ayebani te kino mokolo moango mokoma kuna na libanda ya masano ya martyrs.

Ferré Gola, Fally Ipupa, maître Gims, JB Mpiana pe bayembi basusu ba ponami pona koyemba na milulu miango na ntina ya mbala libwa ya masano ya Francophonie oyo eko banda mua tuku mibale na muambe, sanza Sambo kino mua motoba ya sanza muambe.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa