Kisasa: Fally Ipupa ako sala milulu monene ya loyembo mokolo mua motoba ya sanza muambe pona ko silisa masano  ya Francophonie

Ezali moyembi Fally Ipupa nde aponami pona koyemba na suka ya masano ya Francophonie ya mbala libwa mua motoba ,sanza ya muambe na ndako enene ya palais du peuple na kisasa.

Sarah Meta Savu

23 Sanza Sambo 2023 - 07:42
 0
Kisasa: Fally Ipupa ako sala milulu monene ya loyembo mokolo mua motoba ya sanza muambe pona ko silisa masano  ya Francophonie

Bililingi ya moyembi ezali ko tambola bisika binso pe singa interneti,milulu moango moko banda na ngonga ya zomi na muambe (18h) .

Lisanga lia mabongisi mango elakisi été ba yembi minene bako Zala na milulu miango, kasi moyembi nini ako yemba pona ko fongola milulu miango ? Lisanga lia mabongisi alakaki ko kamwisa batu na ya malamu na tina nayango.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa