Maponomi ya 2023: Noël Tshiani afundi Moïse katumbi na cour constitutionnelle po aza moyi mboka te

Sango ebele elobeli mokanda ya Noël Tshiani na cour constitutionnelle pona kolongola kombo ya Moïse katumbi na moponomi alobi ezali moyi mboka ya Congo demokratiki te. 

Sarah Meta Savu

25 Sanza ya zomi 2023 - 10:11
 0
Maponomi ya 2023: Noël Tshiani afundi Moïse katumbi na cour constitutionnelle po aza moyi mboka te

Motieyi libaya apesi kuna na cour constitutionnelle mikanda oyo azali lokola bilembo pona ko senga kolongwa ya Moïse katumbi na lokasa ya batieyi libaya, ndakisa lokasa ya ba sango ya bayi JeuneAfrique ya 2018. 

Na ngambo Moïse katumbi, engumba SAN VITO DEI NORMANI eyanoli ete kombo ya Moïse katumbi ezali te lokasa ya bayi mboka na Eloko Italie, pe yango etamboli na singa internet pona koyanola Noël Tshiani. 

Tembe nzinga nzinga ya misisa ya Moïse katumbi etikali makasi, kasi mokano ya cour constitutionnelle nde ezalami pe bayi lisabga politiki na ye balobi kozala yako bongama pona kotambola na balabala na tina ya likambo liango.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa