Maponami ya 2023 : Felix Tshisekedi azwi mapamboli ya Tata Simon Kimbangu na Nkamba 

Na etuka ya Kongo-central wapi esika akendaki ko sala molulu ya pona nga pona nga (campagne électorale), mokonzi ya mboka pe moko ya baweli ebonga ya lokumu, Félix-Antoine Tshisekedi akomaki mukolo ya mitanu ya poso eye na mboka  Nkamba kozwa mapamboli ya Tata Simon Kimbangu Kiangani.

Rédaction Lingala

2 Sanza zomi na mibale 2023 - 11:28
 0
Maponami ya 2023 : Felix Tshisekedi azwi mapamboli ya Tata Simon Kimbangu na Nkamba 

Kuna, moweli ebonga nimelo ntuku mibale asololaki mwa tango mukie na mokonzi ya ndako ya Nzambe Kimbaguiste. Tata mokonzi ya mboka esangaki pe azwaki mapamboli ya Simon Kimbangu Kiangani pona maponami ezali koya. 

Na suka ya masolo na bongo, Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo asololaki na bato ya mboka Nkamba. Tata mokonzi ya mboka esengaki na bongo libaku mususu pona ko kamba mboka, nzambi asilisi mosala naye te. 

Na sima Nkamba, Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo ekandaki na ba mboka mususu ya etuka Kongo-central, lokola na Kasangulu na Mbanza-Ngungu wapi esika atayaki bato na maponami ezali koya.